Lingala

Mokonzi Yezu Kristu,
Yo Muinda mua mokili,
mpe Mokonzi wa likolo
na nse,yaka kosalisa
biso,semola loboko la yo
likolo lya biso,salisa baye
balembi mpe bazali
kotepatepa,salisa baye
bazali na mawa mpe na
mpasi,bondo bambola
mpe bakoni,salisa baye
banyokuami mpo ya nkombo
ya yo,ngrasya tosengi yo
ezali mbonguana ya motema,
moto nyonso atambola o nzela
ya yo na motema bosembo.
Mokonzi, Muana wa Davide, y
okela biso mawa,kotika biso te,
limbisa masumu ma biso,
mpe biso, motema ngolu mpe
peto,na bokasi bua Elimo Santo,
nde tokuli Nzoto na Makila ma
Kristu,nde tokomi basantu na
ngrasya ya yo,nde tokumisi
Tata wa likolo,ye Mosantu,
Tata molami mpe wa seko,
Tata semba mpe wa ngolu.

Na mitindo mya Ekleziya. Losambo loye lozali kozuela baye bakolosambela ndambo ya bolimbisi bua masumu.
+ Vicenzo Rimedio, Episkopo

Nicastro, 5-5-1999

O Mariya,
yo ozalaki o nse ya kuruse ya
muana wa yo Yezu Kristu,
na mawa ma yo sambo mpe
na mpasi ya yo,
sambela mpo ya nga!
Sala te nakoka kotala kuruse
ya Yezu na lisumu te,
sala, o Mariya, te nzoto ya ngai
ezala mosika na mabe.
Sala, o Mariya, te molimo mpe
motema mua ngai bizala bya yo,
binso bya yo!
O Mariya, tango Tata akolinga
yango,nalingi naya na muinda mua yo,
yango wana nalingi nazala solo wa yo.
O Mariya, tambuisa nga o nzela elamu,
o nzela ya bolamu,
mpe bikisa biso o mabe.

Kembo na Tata … 3
Mariya, Mama wa lobiko, sambela mpo ya biso.

Na mitindo mya Ekleziya. Losambo loye lozali kozuela baye bakolosambela ndambo ya bolimbisi bua masumu.

+ Vicenzo Rimedio, Episkopo